[Papa Wemba]
Kozala na nzoto kolongono
(Yango nde posa ya moto nionso)
Ah kozala na nzoto kolongono eh
(Yango nde posa ya moto nionso)
Kasi bokono tobengi malaria
Ekotungisa biso tango inso
Ekowuta na ngungi babengi anophèle
Soki eswi moto ekotikelaka eh malaria
Eh
[Mbilia Bel]
Kozala na nzoto kolongono
(Yango nde posa ya moto nionso)
Kozala na nzoto kolongono
(Yango nde posa ya moto nionso)
[Nyoka Longo]
Kasi tozalaki koyeba te oh
Ngungi nde monguna ya nzoto ya moto
Ekobebisa pongi ya libota mobimba
Ekopesa biso pe malaria
Lobi na lobi soki bokono eye
Libota ekomi nde kotungisama
Ba dépenses eh ya bakisi
[Mbilia Bel]
Mboka mobimba tosalela
Moustiquaires imprégnées po ya komibatela ya bangungi
Pe bokimi malaria
[Papa Wemba]
Na moustiquaires imprégnées
Libota mobimba ekobika oh na malaria
[Mbilia Bel]
(Salela yango)
Salela yango
(Moustiquaires imprégnées)
Biso banso
(Salela yango)
(Moustiquaires imprégnées)
[Fally Ipupa]
Papa, mama, yokani mateya eh
Lalisa libota na kati ya moustiquairеs
Wana bangungi nionso baponioki
Pona libota evanda na kimia
(Salela yango)
(Moustiquaires imprégnéеs)
Bamama ya Bandalungwa
(Salela yango)
Bamama ya Kitambo
(Moustiquaires imprégnées)
[?]
[Ferre Gola]
Kozala na nzoto kolongono
(Yango nde posa ya moto nionso)
Ah kozala na nzoto kolongono
(Yango nde posa ya moto nionso)
Kasi bokono oyo babengi malaria
Ekotungisa biso tango na tango
Ekowuta na ngungi babengi anophèle
Ekopesa maladi na nzoto ah
Yango toyeli bino moustiquaires
Yango toyela moustiquaires imprégnées
Pona kosukisa mayele ya ngungi
(Yango nde posa ya moto nionso)
Kozala na nzoto kolongono
(Yango nde posa ya moto nionso)
[Marie Misamu]
Kala tozalaki koyeba te oh
Ngungi nde monguna ya nzoto ya moto eh
Ekobebisa pongi ya libota mobimba
Ekopesa biso pe malaria
Lobi na lobi soki bokono ewumeli
Libota ekomi kotungisama eh
Na dépenses oh na bakisi mama eh
[Pascal Poba]
Mboka mobimba tosalela
Moustiquaires imprégnées po ya komibatela ya bangungi
Pe bokimi malaria
[?]