[Intro]
Aaah
Se Yo
Ezalaka kaka yo Denz Love
Denz Love, aah
[Couplet 1]
Nazalaki éprouvé, kasi na motema te ooh
Kuna bazolela papa, ngai na motema Denz Love
Salité esuki na nzoto, kasi na motema te eh
Kuna nde esika na logea Denz Love
Forteresse sécurisée infranchissable
Ata Guillaume le Conquérant alingaki ko franchir te
Po bolingo na yo Denz Love, fortification na mboka ya motema na ngai eh mama
Motema lokola ba cellules mères, eko se diviser pe ko se multiplier
Yango moto akoki kobomba n’ae trois, quatre amours
Kasi ya ngai motema indivisible, place moko se ya Denz Love mon amour
Capacité ya motema na ngai bolingo n’o e satura yango bébé eeh
Espace insuffisant pour d’autres amours
Ekosenga na effacer yo po mosusu a remplacer
Kasi moyen ya ko effacer yo na motema na ngai ezali te
Mon amour oh
Ozali atome moko ya Oxygène oyo ezangaki na deux atomes ya Hydrogène
Po esala mayi, po l’eau c’est la vie
Denz Love tu es ma vie, mama tu es ma vie
[Couplet 2]
L’Amour éternel pour la vie
Je te comprends, tu me comprends, on se comprend
Denz Love l’amour de ma vie
Ata puissance agonie na l’île Luçon
Ekweyisaki te chérie bandako nionso ya bolingo
Denz Love pour le meilleur et le pire
Mama, pour le meilleur et le pire
Atako bolingo ewumeli, bana bakoli
Kasi bolingo na yo na motema na ngai eza kaka ya sika
Kolela te, kobanga te eh, Seskul aloba « nie nie nie, nie »
Tata bo moko, Mama bo moko, Ekolo be moko, Mokonzi moko
Atako ba ministres bazali, ba généraux pe bazali
Kasi na motema na ngai mokonzi se yo moko Denz Love
Mibale te, se yo mama mokonzi
Yiii yiii yiiii eeh mama mokonzi eeeh
Mibale te eh, mibale te eh eh
[Conte]
Bandeko na ngai, ndenge kaka ezalaka
Ba familles na ngai bawutaki mboka baye kotala biso na Kinshasa
Sikoyo na tango ya retour to décidé na mère
Tokende kotika bango ti na mboka
Tomati na bateau, ngai, mère, mokumbi bateau na ba familles na ngai
Tokomi na kati kati ya lac, bateau edindi
Mère, mokumbi bateau na ba familles na nga badindi
Sikoyo bayebisi nga nasala choix, na sauver mutu moko
Nako sauver nani ? Entre mère, ba familles na ngai to mokumbi bateau
Boyebisa ngai, ah...
Alors, mes chers amis
Vous qui ne comprenez pas le lingala, la plus belle langue du monde
Donc, j’étais en train de dire, ma famille est venue nous rendre visite
Et à la fin de leur séjour, on a décidé de les raccompagner ma femme et moi
Et pendant le voyage, le bateau a coulé
Et on me demande alors de ne sauver qu’une seule personne
Soit un membre de ma famille, ma femme ou le capitaine du bateau
À votre avis, qui dois-je sauver ?
[Couplet 3]
Na motema na ngai se yo ah
Balobi napona entre yo na ba familles na ngai ah
Nalobi raison de vivre na ngai se yo
Se yo wana na "Titanic"
Jack andimaki ko se noyer pona Rose
Se yo wana na "Amour Éternel"
Kemal andimaki risque pour Nihan
Se yo wana na "Un Prince À New-York"
Prince Akeem andimaki kokoma serviteur pour Lisa
Se yo wana na Biblia
Abraham andimaki kokabwana na Agar na Ismaël pour Sarah
Se yo moko, mama mokonzi, Denz Love na ngai mama mokonzi
Se yo moko mama mokonzi, aaah mama, mama mokonzi eeeh
[Refrain]
L’Amour inconditionnel ya toi et moi (ya toi et moi)
Fais-moi danser avec amour Denz Love (Love)
Même dans une autre vie, tu seras mon seul choix (mon choix unique)
Laissons parler les aigris, bakoyoka soni (soni na bango)
[Pont]
Bébé na ngai, bébé na ngai
Akota motema na ngai mobimba profondement
Ah se yo mosusu te (mama mokonzi eh)
Ah ma (mama mokonzi eh)
C’est toi l’amour de ma vie (mama mokonzi eh)
Mama bana na ngai eza yo (mama mokonzi eh)
Ah ah ah (mama mokonzi eh)
Nalela yo ya trop oyebi yango bien (mama mokonzi eh)
Ah, mon amour
[Refrain]
L’Amour inconditionnel ya toi et moi (ya toi et moi)
Fais-moi danser avec amour Denz Love
Même dans une autre vie, tu seras mon seul choix (mon choix unique)
Laissons parler les aigris, bakoyoka soni